🌐 Language
'Olelo Hawai'iAfaan Oromoobahasa IndonesiaBelarusianBrezhonegCebuanoChamorroChichewachiShonaChongthuCiyawoDanskDeutschEestiEnglishEspañolEsperantoeʋegbeFrançaisHausaHrvatskiIgboIlocanoItalianoKikuyuKiswahiliKiyombiKreyòl AyisyenLatinaLatviešulietuviųLingálaLugandaMagyarMahasuiMāoriNederlandsNorskPohnpeianPolskiPortuguêsQach’abelRomaniRomânăSanskritSetswanaShqipsrpski jezikSuomiSvenskaTagalogTiếng ViệtTonganTwiTürkçeUyghur tiliYorùbáÍslenskaČeštinaБългарскиРусскийУкраїнськаעבריתاردوالعربيةفارسیكوردی سۆرانیअहिराणी‎नेपालीभद्रवाही‎मराठीमानक हिन्दी‎हरियाणवी‎অসমীয়াবাংলাਪੰਜਾਬੀગુજરાતીଓଡ଼ିଆ‎தமிழ்తెలుగుಕನ್ನಡമലയാളംไทยဗမာἙλληνική中文日本語한국어+ All languages
See More Jesus

Biblia Elobi Nini Na Ntina Ya Boyebi? — Moboko · Makomi ya KJV elongo na Mituya ya Strong — Bible Quiz

For each reference below, choose what that verse teaches. Your score appears at the end.

This is the graded quiz. Pass it to earn credit toward your Ministry Certificate of Endorsement.

Proverbs 10:14 — Moto ya bwanya abombaka ________, kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.
boyebi
azangi
masumu
Proverbs 11:9 — Moto ya mbindo abebisaka ________ na ye na maloba ya monoko na ye, kasi boyebi ekokangola bato ya sembo.
moninga
soni
kanda
Proverbs 12:1 — Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka ________ azali zoba.
kitoko
pamela
nkosi
Proverbs 15:14 — Motema ya moto ya mayele elukaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebimisaka kaka ________.
bozoba
bolamu
soni
Proverbs 18:15 — Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele, mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka ________.
azangi
boyebi
masumu
Proverbs 24:5 — Moto ya bwanya atondi na nguya, moto oyo azalaka na ________ alendisaka nguya na ye.
masumu
motole
boyebi
Isaiah 5:13 — Yango wana, bato na Ngai bakokende na ________ mpo na kozanga boyebi; bato na bango ya lokumu bakokufa na nzala, mpe bato pamba bakokufa na posa ya mayi.
mbindo
bowumbu
elikya
Hosea 4:6 — Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na ________ na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.
bonganga-Nzambe
liboma
ebenga
Luke 4:18 — «Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa ________ miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama
koteya
bakufi
suka
2 Timothy 2:25 — mpe ya koteya na boboto bato oyo babendanaka na ye; asengeli kozala na elikya ete Nzambe akosalela bango ngolu ya ________ mitema mpo ete bayeba solo.
bozoba
kobongola
lisekwa
Isaiah 28:9 — Azali nani, ye oyo azali koluka koteya? Alingi kolimbola ________ na ye epai ya banani? Epai ya bana oyo balongoli na mabele, bana oyo bakati bango mabele?
banguba
makasa
bimoniseli
1 Corinthians 3:1 — Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola na bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola na bato oyo batambolisamaka kolanda ________ ya nzoto, lokola na bana mike kati na Klisto.
bikamwa
baposa
komekama
1 Corinthians 3:2 — Napesaki bino ________, kasi bilei ya makasi te, pamba te bolingaki te kokoka kolia yango. Ezala sik’oyo, bokokoka na bino mpe kaka te kolia yango
koswana
miliki
Mangomba
Isaiah 40:13 — Nani asosoli makanisi ya Yawe to apesi Ye ________ lokola molakisi?
bolingo
lifuti
toli
Isaiah 40:14 — Yawe atunaki ________ na nani mpo ete apesa Ye mayele? Nani alakisaki Ye ndenge bakataka makambo na sembo to apesaki Ye boyebi, to mpe ateyaki Ye nzela ya bososoli?
bolingo
nkosi
toli
Romans 10:2 — Pamba te nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzokande, bolingo yango evandisami na ________ te.
boyebi
kopesa
koloba
2 Peter 3:18 — kasi bokola kati na ________ mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela! Amen!
ngolu
lokumu
nzoto
Proverbs 2:5 — okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa ________ ya Nzambe.
boyebi
azangi
masumu

← Back to the study