Ebandeli 3:22 — Yawe Nzambe alobaki: «Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya ________ loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi.»
kotia
komema
bilamba
Deteronomi 30:19 — Na mokolo ya lelo, nazwi likolo mpe se lokola batatoli mpo na yo: nasili kotia liboso na yo bomoi mpe kufa, ________ mpe bilakeli mabe. Sik’oyo, pona bomoi mpo ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi.
biteni
mapamboli
bantaba
1 Bakonzi 3:9 — Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani ________ kokamba ebele ya bato na Yo oyo?
miliki
kobondela
akolonga
Ezayi 7:15 — Mwana yango akomela kaka miliki mpe mafuta ya nzoyi kino tango akoyeba koboya mabe mpe kopona ________.
molili
bolamu
elamba
Ba-Ebre 5:12 — Bosengelaki wuta kala kokoma ________; kasi kino sik’oyo, bozali kaka na posa ete moto ateya bino makambo ya ebandeli ya Liloba na Nzambe. Bokomi kutu na posa ya miliki, kasi ya bilei ya makasi te.
minzoto
matondi
balakisi
Banzembo 34:14 — Zala mosika na mabe mpe sala ________, luka kimia mpe koba na yango.
Masese 8:13 — Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, ________, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.
lofundu
likonga
bibombelo
Matayo 5:16 — Yango wana, tika ete ________ na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.
ebandeli
pole
nzoto
Bagalatia 6:9 — Tosalaka bolamu; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki ________.
lobiko
botosi
mpiko
Barome 2:7 — bomoi ya ________ epai ya moto oyo, na nzela ya molende na ye ya kosala malamu, alukaka nkembo, lokumu mpe makambo oyo ebebaka te;
likabo
bowumbu
seko
Luka 6:45 — Moto malamu abimisaka ________ kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.
etumbu
bolamu
molili
Barome 7:19 — Nasalaka te ________ oyo nalingaka kosala, kasi nasalaka nde mabe oyo naboyaka kosala.
bolamu
masumu
etumbu
Barome 6:13 — Bokaba biteni ya banzoto na bino te na lisumu lokola bisalelo mpo na mabe, kasi bomikaba bino moko epai na Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na ________ mpe bazali na bomoi; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisalelo mpo na bosembo.
likabo
lokumu
bakufi
Matayo 6:13 — komema biso na ________ te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.] ›
komekama
botosi
komikitisa
Yoane 17:15 — Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya ________.
ngonga
suka
Satana
1 Yoane 5:19 — Toyebi ete tozali bana na Nzambe, mpe ete mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya ________.
sembo
suka
Satana
Matayo 13:19 — Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ________ ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.
ndimbola
botosi
komekama
Matayo 6:22 — Miso ezali lokola ________ ya nzoto. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na pole.
baboti
bolembu
mwinda
Ba-Efeso 6:16 — Na likolo na nyonso, bobakisaka kondima lokola ________ oyo bokoboma na yango moto ya makonga nyonso oyo Satana akobwakaka.
ekulusu
baboti
nguba
1 Yoane 2:14 — Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. ________, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana.
baposa
milimo
Bilenge
Misala ya Bantoma 10:38 — ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya ________ na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.
Nazareti
Damasi
Azia
1 Petelo 2:23 — Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki ________ Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.
komonisa
mpinzoli
kokamba
1 Petelo 3:9 — Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli; pamba te Nzambe abengaki bino na ________ mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.
kopambola
kolela
kufa
Ebandeli 50:20 — Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, ________ ya bomoi ya bato ebele.
lobiko
bwanya
soni
Barome 8:28 — Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na ________ ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.
masumu
etumbu
bolamu
Barome 12:21 — Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala ________.