🌐 Language
'Olelo Hawai'iAfaan Oromoobahasa IndonesiaBelarusianBrezhonegCebuanoChamorroChichewachiShonaChongthuCiyawoDanskDeutschEestiEnglishEspañolEsperantoeʋegbeFrançaisHausaHrvatskiIgboIlocanoItalianoKikuyuKiswahiliKiyombiKreyòl AyisyenLatinaLatviešulietuviųLingálaLugandaMagyarMahasuiMāoriNederlandsNorskPohnpeianPolskiPortuguêsQach’abelRomaniRomânăSanskritSetswanaShqipsrpski jezikSuomiSvenskaTagalogTiếng ViệtTonganTwiTürkçeUyghur tiliYorùbáÍslenskaČeštinaБългарскиРусскийУкраїнськаעבריתاردوالعربيةفارسیكوردی سۆرانیअहिराणी‎नेपालीभद्रवाही‎मराठीमानक हिन्दी‎हरियाणवी‎অসমীয়াবাংলাਪੰਜਾਬੀગુજરાતીଓଡ଼ିଆ‎தமிழ்తెలుగుಕನ್ನಡമലയാളംไทยဗမာἙλληνική中文日本語한국어+ Minɔkɔ nyonso
See More Jesus
Lingála

Yesu Azali Nani? — Kosala Yango na Bomoi — Motuna ya Biblia

Motuna ya Biblia

Yesu Azali Nani? — Kosala Yango na Bomoi — Motuna ya Biblia

Mpo na vɛrsɛ mokomoko oyo ezali na nse awa, pona oyo vɛrsɛ yango eteyaka. Namba na yo ekomonana na nsuka.

Oyo ezali quiz oyo epesaka bapuwa. Longá yango mpo na kozwa mua na Sɛrtifika na yo ya Kondima ya Mosala.

Matayo 16:17 — Yesu alobaki na ye: — Esengo na yo Simona, mwana mobali ya ________! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
Yona
Zebede
Arami
Barome 10:17 — Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na ________ ya Klisto.
mbeka
Liloba
likolo
1 Petelo 2:2 — Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa ________
lobiko
mpiko
elikya
Yoane 17:3 — Nzokande, bomoi ya ________ ezali: koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.
ngambo
seko
koluka
Bakolose 2:6 — Yango wana, lokola bosilaki koyamba ________ lokola Nkolo, botambolaka lokola bato oyo bazali moko na Ye:
bolingo
kondima
Yesu-Klisto
Misala ya Bantoma 4:13 — Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe ________ bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.
Saulo
Yoane
Abrayami
Matayo 11:28 — Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba; Ngai, ________ bino bopemi.
kokokisa
motuya
nakopesa
Yoane 10:27 — Bameme na Ngai eyokaka ________ na Ngai. Nayebi bameme na Ngai, mpe yango elandaka Ngai.
seko
mongongo
lokumu
Bakolose 3:16 — Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa ________ kati na mitema na bino.
matondi
milimo
baposa
Misala ya Bantoma 5:41 — Bantoma balongwaki liboso ya ________, na esengo mingi ya komona ete bakoki mpo na komona pasi na tina na Kombo na Yesu.
mayangani
Likita-Monene
mboka
Barome 12:1 — Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola ________ ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.
mopanga
ebale
mbeka
Barome 8:35 — Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto? Pasi, somo, ________, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga?
minyoko
kolendisa
mpiko
Matayo 24:42 — Yango wana, bosenzela; pamba te ________ te mokolo nini Nkolo na bino akoya.
bilamba
boyebi
mitema
Ba-Ebre 13:8 — ________ azali ndenge moko: lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela.
Yesu-Klisto
bolingo
moninga
Emoniseli 1:8 — «Nazali Alifa mpe ________,» elobi Nkolo Nzambe, «Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.»
Tiyatire
Omega
Laodise
1 Yoane 3:2 — ________ na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.
kala
polele
Balingami
1 Bakolinto 13:12 — Solo, sik’oyo, tozali komona kaka elilingi, lokola kati na ________; kasi mokolo ezali, mokolo oyo tokomona penza ndenge esengeli. Sik’oyo nayebi kaka moke; kasi mokolo ezali, mokolo oyo nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebi ngai.
lisakoli
koyinana
talatala
Yobo 19:25 — Ngai, nayebi na ngai malamu ete ________ na ngai azali na bomoi, mpe, awa na mokili, akotelema ya suka mpo na kokata likambo na ngai.
pamela
mwinda
Mosikoli
Yoane 8:12 — Yesu alobaki lisusu na bato: — Nazali pole ya mokili; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na ________ te, kasi akozwa pole ya bomoi.
esobe
molili
mitindo
Emoniseli 22:20 — ________ ya makambo oyo alobi: — Iyo, nazali koya kala mingi te. Amen: Nkolo Yesu, yaka!
lobiko
Motatoli
molili

← Zonga na lisolo