🌐 Language
'Olelo Hawai'iAfaan Oromoobahasa IndonesiaBelarusianBrezhonegCebuanoChamorroChichewachiShonaChongthuCiyawoDanskDeutschEestiEnglishEspañolEsperantoeʋegbeFrançaisHausaHrvatskiIgboIlocanoItalianoKikuyuKiswahiliKiyombiKreyòl AyisyenLatinaLatviešulietuviųLingálaLugandaMagyarMahasuiMāoriNederlandsNorskPohnpeianPolskiPortuguêsQach’abelRomaniRomânăSanskritSetswanaShqipsrpski jezikSuomiSvenskaTagalogTiếng ViệtTonganTwiTürkçeUyghur tiliYorùbáÍslenskaČeštinaБългарскиРусскийУкраїнськаעבריתاردوالعربيةفارسیكوردی سۆرانیअहिराणी‎नेपालीभद्रवाही‎मराठीमानक हिन्दी‎हरियाणवी‎অসমীয়াবাংলাਪੰਜਾਬੀગુજરાતીଓଡ଼ିଆ‎தமிழ்తెలుగుಕನ್ನಡമലയാളംไทยဗမာἙλληνική中文日本語한국어+ All languages
See More Jesus

Nasengeli Kosala Nini mpo na Kobika? — Boyekoli ya Biblia KJV na Mituya ya Strong — Bible Quiz

For each reference below, choose what that verse teaches. Your score appears at the end.

This is the graded quiz. Pass it to earn credit toward your Ministry Certificate of Endorsement.

Misala ya Bantoma 2:36 — Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ________ Nkolo mpe Klisto.
bolingo
mateya
ekulusu
Barome 5:8 — Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye: wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto ________ biso.
ayambaki
akufelaki
motole
Ba-Efeso 1:7 — Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe ________ ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe
botosi
bolimbisi
lobiko
Yoane 19:34 — Moko kati na basoda atobolaki mopanzi ya Yesu na nzela ya ________; mpe mbala moko, makila mpe mayi ebimaki na mopanzi yango.
Satana
miyibi
likonga
Misala ya Bantoma 2:38 — Petelo azongiselaki bango: — Bobongola mitema; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete ________ na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
masumu
pasi
etumbu
Misala ya Bantoma 3:19 — Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa ________ na bino
sango
masumu
miso
2 Bakolinto 7:10 — Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na ________.
kufa
bomoi
kokufa
Misala ya Bantoma 22:16 — Mpo na nini ozali kolekisa tango? Telema, zwa ________ mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo.»
libatisi
Sango
bandimaki
Barome 6:4 — Bakundaki biso elongo na Ye na nzela ya libatisi kati na kufa na Ye mpo ete, lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya ________.
bomengo
Liloba
sika
Bakolose 2:12 — bakundaki bino elongo na Klisto na nzela ya ________; mpe, kati na Ye, bosekwaki elongo na Ye na nzela ya kondima kati na nguya ya Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi.
libatisi
ntoma
Molimo
1 Petelo 3:21 — Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya ________ ya Yesu-Klisto
komekama
lisekwa
komikitisa
Malako 16:16 — Moto oyo akondima mpe akozwa ________ akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.
bandimaki
libatisi
kososola
Yoane 3:5 — Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: moto moko te akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe soki abotami te na mayi mpe na ________.
bambuma
Molimo
pene
Bagalatia 3:27 — pamba te bino nyonso oyo bozwaki ________ kati na Klisto bolataki nde Klisto.
libatisi
ekokisama
babakaki
Barome 8:9 — Nzokande bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Mpe soki moto ________ Molimo ya Klisto azali mpe moto na Ye te.
bokoki
fololo
azangi
Ba-Efeso 1:13 — Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo, Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto; mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino ________
ngenga
kashe
bakamwaki
Yoane 15:4 — Bowumela kati na Ngai, mpe Ngai nakowumela kati na bino. Ndenge etape ________ kobota bambuma te na ndenge na yango moko, soki ekangani te na nzete na yango ya vino, ndenge wana mpe bino, bokoki kobota bambuma te soki bokangani na Ngai te.
ekoki
nkembo
kimia
Bakolose 1:23 — Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na ________ nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.
baposa
bikelamu
bilongi
Matayo 24:13 — Kasi moto oyo akoyika ________ kino na suka akobika.
mbindo
mpiko
etumbu
Emoniseli 2:10 — Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola ________ ya elonga na yo.
moyibi
ekeko
motole
1 Yoane 2:1 — Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete ________ masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata: Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo.
bolimbisi
bosala
mbote
Ba-Ebre 7:25 — Yango wana azali na makoki ya ________ libela, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela na Ye, mpo ete azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondelaka Nzambe na tina na bango.
rido
kobikisa
litomba
Banzembo 103:12 — ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka ________ na biso mosika na biso.
maboko
masumu
misala
Bagalatia 1:8 — Kasi soki moto moko, ezala biso to ________ moko kowuta na Likolo, ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo biso toteyaki bino, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe!
nzete
ngomba
Anjelu

← Back to the study